Likambo na yo, oyo ezo sala yo pasi
Oyo elatisi yo elamba ya mawa
Ezali n’ebandeli pe na suka ahhh
Kasi Yahweh ako sukaka te
Problem oyo elata yo nzoto, ewumeli ba mvula
Omeki na baninga esimbi te, okeyi na famille esimbi te
Finalité na église réponse te
Ezali n’ebandeli pe na suka ahhh
Kasi Yahweh ako sukaka te
Yango talela kaka yesu, aza eyano na mituna ahhhhh
Ata nionso ekomi mabe oh, simba kaka kondima na yo
Simba kaka kondima na yo moto moko te abangisa yo to pe alembisa yo,
Nzambe ayebi likambo na yo, mokolo ezali okosepela pe oko bosana ba pasi na yo.yoka
Il y avait une femme, qui avait la perte de sang
Elle souffrait pendant douze ans, personne ne pouvait la guérir
Mais un jour elle se décida asimba, elamba ya master.
Il y a des problèmes dans la vie esengaka kaka intervention divine, quelques soit intervention ya bato nkama, eloko moko ekosalama te
Il y a des gens dans la vie que nzambe apona wuta l’éternité
À travers ba histoire na bango, epambola ba mosusu
Peut-être ezali pe cas nayo moninga oyo okoyokanga
Nzambe alingi asala histoire na yo exhortation ya moto moko quelque part, mama zala makasi ehh
Nionso ozo mona ezali se formation.
Il n’y a pas de succès sans successeur, il n’y a pas de successeur sans formation
Nzambe yemoko ayebi nini abongisa pona yo, ako permettre jamais situation na yo, emema yo na liwa
kasi eza kaka po kombo ya nzambe ekumisama ehhh
Kasi eza kaka po kombo ya nzambe esanzolama ehhh
Ne t’inquiète pas ma sœur il est un Dieu qui ne ment jamais
Ne t’inquiète pas mon frère il est un Dieu qui ne ment jamais
Talela yesu, talela nzambe
Longola loboko na litama tika komilela
Tika kokanisa kanisa nzambe ayebi yo eh eh eh
Pona kosukisa na lingi na yebisa yo
Totalela bato ya mokili te
Totalela kaka yesu po yende ayebi nionso pe amonaka nionso amen